33ème COMMUNAUTE EVANGELIQUE REGION SANKURU

33ème C.E.R.S

B.P. 1673 KANANGA

"Sur ce roc je bâtirai mon assemblée,..." Matthieu 16v18

Les éléments de menu en rouge contiennent des informations récemment mises à jour.

Najali kobatela liloba na yo na motema na ngai

Motema ejali na bokosi koleka biloko yonso mpe na mabe mingi; nani akoki koyeba yango? Yilimia 17:9

Njambe … ayebi makambo mabombami na motema. Njembo 44:21

E Njambe, yokela ngai mawa, lokola ejali boboto na bolingo na yo ... Sukola ngai malamu kolongola mabe na ngai ... jalisela ngai motema na mpeto. Njembo 51:1,2,10

Soko tokoyambola masumu na biso, ye ajali sembo mpe moyengebeni mpo na kolimbisa biso masumu na biso mpe kopetola biso na bokesene yonso. 1 Yoane 1:9

Batela motema na yo na mpiko yonso mpo ete makambo na bomoi ikoutaka wana. Masese 4:23

Nde okimaka mposa yonso na bolenge mpe obengana boyengebene mpe kondima mpe bolingo mpe kimia, esika moko na bango bakobianga nkombo na Nkolo na mitema mpeto. 2 Timote 2:22

Soko nakanaki bokesene kati na motema na ngai, mbe Nkolo ayokamelaki ngai te. Njembo 66:18

Najali kobatela liloba na yo na motema na ngai ete nasala mabe epai na yo te. Njembo 119:11

Nkolo Yesu asololi na bango lisusu, ye etc, “Boya liboso na ngai, bino yonso bojali kolemba na mosala mpe kokumba bojito mpe nakopemisa bino.” Matai 11:28.

Tala, ntango ebongi ejali sasaipi; tala mokolo na kobika ejali sasaipi. 2 Bakolinti 6:2.

Mwana na ngai, pesa ngai motema na yo. Masese 23:26

145, Avenue du commerce, quartier Tshinsambi, commune de Kananga (Kasaï-Central, RD Congo)

Notre Site Web copyright© cers. Tous droit réservés.